ln_luk_text_reg/11/49.txt

6 lines
414 B
Plaintext

\v 49 Mpo na yango mpe, bwanya ya Nzambe elobi:
«Nakotindela bango basakoli mpe bantoma, mpe bakonyokolo bango mpe
bakoboma basusu kati na bango. \v 50 Boye, bato ya ekeke eye bakozua mokumba
ya makila ya basakoli nyoso oyo basopa uta ebandeli ya mokili, \v 51 kobanda
makila ya Abel kino ya Zakalia, oyo babomaki kati kati ya etumbelo mpe esika
esantu. Iyo, nazali koloba na bino, ekeke eye ekomema mokumba wana.