\v 18 Soki Satana akabwani kati na ye moko, ndenge nini bokonzi na ye ekoumela? Mpo bolobi ete nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Beelzebul. \v 19 Soki nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Beelzebul, na nguya ya nani bayekoli na bino bazali kobengana yango? Na ntina na yango, bango bakozala basambisi na bino. \v 20 Kasi soki nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Nzambe, boye bokonzi na Nzambe eyei epai na bino.