\v 5 Ekoti bango na lilita, ba moni elenge mobali alati elamba ya pembe avandi koboko ya mobali mpe azalaki na kokamua. \v 6 Alobi na bango: "Bo banga te. Bozali koluka Yesu na Nazaleté, oyo ba bakaki ye na ekulusu. Ye asili ku sekwa! Azali lisusu awa te. Bokende kotala esika oyo batiaki ye. \v 7 Bongo bokende koyebisa na ba yekoli na ye mpe Petelo bakende liboso na Galile. Kuna bokomona ye lokola ayebisaka bino.