ln_mat_text_reg/04/01.txt

1 line
324 B
Plaintext

\c 4 \v 1 Na sima Molimo akumbaki Yesu na esobe mpo amekama na Zabolo. \v 2 Sima ya mikolo tuku minei ya kokila, ayokaki nzala. \v 3 Satana apusanaki pe alobi na ye: «Soki ozali mwana na Nzambe pesa mitindo na mabanga ebongwana bilei. \v 4 Kasi ayanolaki: «Ekomama, moto akobika kaka na bilei te, kasi na liloba ya Nzambe.