ln_mrk_text_reg/14/63.txt

1 line
418 B
Plaintext

\v 63 Nganga monene apasoli elamba na ye, mpe alobi ete: «Tozali na bosenga na batatoli mosusu mpo ya nini? \v 64 Bosili koyoka maloba na kotuka. Makanisi na bino nini?» Bongo yonso balobi: «Abongi kokufa». \v 65 Basusu kati na bango ba bwakeli ye soyi mpe kozipa ye elongi mpe kobeta ya bibotu mpe kolobela ye: «Lakisa ete ozali Mosakoli!» Nani abeti yo? Sima, bakengeli bakamati ye, mpe ba bamboli ye ba mbata.