Ndiki moto apesi moninga mosolo soko mpe biloko amobombela, mpe bayibi bingo omaboko ma ye, moyibi akobutinya bingo kwa libale. Nde ndiki moyibi azali tobonono, monkolo ndako akoke o boso bombe Nyambe noloba polele ete naliki bingo tokata. Soko bato babale bakowela eloko, ezala ngombe soko mpunda, mwana o mbata, elamba soko eloko esiso elimbani mpe moko alobi ete: yengo eye ! bango babale bakoke weki ombe Nyambe; onya okobundwa amoyutela moninga kwa libale.